Paroles de Malanda-Ngombe

Koffi Olomidé
71121
Koyoka eleki koloba
Moninga na yo ngai te
Monguna na yo pe ngai te
Luka o ntei na yo
Monguna na yo se yo mei
Masumu na yoo, futa
[Koffi Olomide]
Lazare abanzaká ‘te
Lokola mwana nzambe
Asekwikisaká ye
Akokufa te lususu
Amikosaki
Mawa trahison na yo po ozangá lupemba
Mawa jalousie na yo po ozangá marque
Sha mazulu, po ozangá référence
Okobonga jamais po motema na yo mabe
Na wenze ozalaki na mesa kasi
Souviens-toi zulu
Marchandise ezalaki ya ngai
Otekaki ozwaki intérêt ebele
Ooh nini na mwana ya ngani
Papa na Didi stone
Ebale etengamá libela
Po eboyaká kolanda toli ya maswa
[Savanet Depitcho]
Yo obetaká ntangwa partout ke yo yoo
Okomi kokima mbangu na mopepe pourquoi ?
Monene ya eloko ya pema
Eza se mopepe ya moke infini
[Mamale Tupac]
Akra Moje sunga Mamale
Se toza na yo kino suka te
Mama e
Totika nde bizaleli ya kala
Mama
Moto alobi na yo alo, zongisa oui
Moto apesi yo bonjour
Zongisa ye pe ye bonjour
Moto apesi yo gentil,
Komona na ye yuma te
Moto akabeli yo,
Kobenga ye mushina te
Suspens
Jalousie ebandá banda
Na ebandeli ya mokili
Nzambe akelá mokili na bolingo na ye
Tala Kayini abomá ndeko na ye likolo ya jalousie
Yango Zulu okoboma ngai lelo oyo
[Lola Mwana]
Sala oyo nzambe alingi mobombi
Awa obaloli kazaka
Libulu molai, moyen ya kokima eza te
Le grand mopao eza ngai
Fungola livre na yo ya Histoire
Okose rappeler
Moto asalá ke yo ózala eza nga
Etumbu na yo na la vie
Kozalaka seko sima ngai
Malanda ngombe
[Fally Ipupa]
Boni yo butu moi
Se kosengela ngai liwa epai ya Nzambe ?
Mais Nzambe nde protection na ngai
Tika nga navivre
La vie na ngai,
Pourquoi esalaka yo mingai ?
Bozwi na ngai epesaka yo
Likundu motema mabe
[Gipson Butukondolo]
Lisumu nini nasalá
Moto mosusu asalá jamais
Etumbu na buku ya leta
Didi stone, tia papa na mabondeli na yo
Eloko eleki losambo ezali te
[Koffi Olomide]
Avant kotia ngai mbeli
Pesa ngai poussière de seconde
Po natika testament na Elvis soki na Didi
Ngai nakokufa
Bopesa ngai mwa du temps
Po nafuta nyongo
Ya badiva pe mama Ami
Po natika maloba
Na Minou na yaya na ye
Bino nzoto ya bien
Ya ngai ya maba
Nabimaka te na moi
Oyo ya nga basortie
Se na après-midi
InterprèteKoffi Olomidé
LabelSonodisc
Paroles ajoutées par nos membresParoles ajoutées par nos membres