Paroles de Sans Anesthesie

Koffi Olomidé
Huuummm...Huuummm...Huuummm
Oh Mon amour yoka ngai eh, Tabou Fatou yoka ngai eh
Oza obligée o comprendre ngai, na za oeuvre y'osala eh
Oza obligée o talela ngai, po ngai wa yo sans toi
Naza moto sans horizon, bateau ivre navigant dans les eaux troubles
JOÉE KONGOLO MIBEKO
Ba mbula ebele ba sanza ebele, esangisa nga na yo
Nzoto na nga elamba na'ngo préféré eza mposo na yo
Chaque eteni ya nzoto na ngai ekoma banque ya amour na yo, Tabou Fatou
ISABELLE KIZA, NONO MWEKATONE
Koboya ngai eza solution te, ata na sali mabe
Pardonner ngai, mea culpa, aider ngai na longwa na bozoba
Est-ce que lelo soki otiki ngai mpe lobi soki oyoki'te epai na keyi, na zongeli maye ma bozoba
Est-ce qu'eza soni te po na yo moto osala ngai?
Paroles: L'amour est un film trop merveilleux qui ne laisse passer que les belles couleurs.
Soki opesi ngai mbisi, nakolia mokolo moko
Soki oteyi ngai kopepa, plus jamais nako kufa nzala
Pesa ngai lelo etumbu, ezali te ya pour toute la vie
Kasi soki okoboya ngai, y'obotoli ngai souffle ya vie pour toujours
Mokristo soki asali lisumu, soki atubeli mabe na ye
Nganga nzambe ako limbisa ye, mpe ako lesa ye eucharistie
Pourquoi y'olingi n'oko sala bongo te epai na ngai, Tabou Fatou?
ROGER BOKANA
Awa y'okangi maboko, lobi soki oyoki nga na weyi
Tumba nga bongo putulu na ngai otia na bileyi ya niawu na yo
Nakom'o vivre ontei na ye, p'okom'olinga ngai à travers ye
Nakom'oyoka mongongo na yo chaque fois sok'ozo benga ye miau...miauu
MIMI EKUBA BELINGA, CHANTAL KAZADI, AFRICA SURPRISE
Paroles: Oh boye ba mamans, bomi tika na maboko ya ba papas, po tokota bien na l'an 2000, esala nini ko, hein?
Hii... Nga natuna ee hii..
Pardon na yo mutuya na yango vraiment si eza combien?
Esika motema ezalaka, oyo ya yo ekoma hécatombe
Kolimbisa moninga est-ce qu'il faut afuta prix ya vie na ye?
Cas na nga ezo pesa mawa koleka ya moto ya kossovo
Mpasi ya l'amour, Tabou Fatou
Hii... Nga nalela ee hii..
Bongo ekomi'osala neti horloge oyo eza na retard
Démarche na ngai ekomi neti ya moto oyo aza na rendez-vous
Na cimetière na minuit na moto oyo akelaka liwa
Papitsho Mwekatone, djo ya Tabou Fatou
Hii... Nga nalela ee hii..
Esika linu eza ya kolongwa, lolemo ezangaka te koleka
Esika bato baza lisanga, faute ezangaka te kosalema
Soki kolimbisana ezali te, mokili eko limwa eee
Pardonner encore et toujours Tabou Fatou
IBRAHIM SHAKO
Hii... Nga natuna aaannn..
Pourquoi kaka bato oyo tolingaka mingi,
Un jour bayaka ko tia biso likula na motema?
Kasi auparavant bazwaka te soin ya kotia anesthésie?
Mpasi ya l'amour
ANNIE NGANGUELE
Ahii... Nga natuna eeeh ...
Baye totiaka mitema un jour bakokunda biso,
Soki toleli bango nde bakopesa biso mouchoir,
Souvent le jour J bapesaka biso mokongo?
Souvent malheur na biso bango nde bazalaka ba auteurs n'ango?
Mystère ya l'amouuur...
MALBONEIGE MABOKE
Hii... Nga natuna ee hii...
Pourquoi kaka bato'yo hier encore bazalaki kotala biso
Na regard ya tendresse lokola bato bazokota na pongi
Soudain regard na bango etondi agressivité?
Bakomi'otala biso ndenge yuda atalaka arabe,
Bayini biso ndenge musulman ayina ngulu?
Mystère ya l'amouuur...
Contrat ya l'amouuur...
Mystère ya l'amouuur...
InterprèteKoffi Olomidé
LabelSonodisc
Paroles ajoutées par nos membres