Paroles de Fany

Werrason
Tabu Fatu
Tango ozo leka leka na voiture nayo ya cher otiaka pe liputa na coffre
Po ofinika ba oyo bakufa malili ya bolingo.
Maitre J l'uniciateur, le pacificavateur Vital Kamere,
Le maitre Christophe Muzungu,
Ho Sultani sulheman transport en commun, Eric Kalume
Bolingo neti oxygène essi ekoti na motema moyen te nga na boya, cherie.
Ezo pesa pasi,
Eloko ekoki kokabola mosuni ya moto na posso be liwa
Mais bolingo ekomi kokabola ya ngai nzoto.
Tabu kolinga yo, il fallait otika nga nasilisa tableau yango
Bolingo etikali inachevé.
Entre ngai na yo kolinga nde esalaki kulutu sima na ya ngo,
Koyina nde ebotami.
Bolingo incolore, inodore pe limpide ezuaka forme,
Selon récipient Tabu Fatu
Meka Bebe,
Meka kolakisa ngai ba facettes cachées
Nuit et jours bolingo na nga ezala assurée,
Hypocrisie ezali synonyme ya lacheté
Eloba ba kulutu takala na mokili
Pourquoi lelo?
Pourquoi na komi ko naviguer na molili
Koleka Titanic liboso oya Iceberg
Nga na kweya po ete sima nga na sa na kule
Ba koma na ba livres étikali éternellement.
Aa lelo,
Lelo na komi déprimé, nervosé pe malaisé
Likolo ya ba souffrance ya love na koki vivre te,
Na préféré na nga na sala euthanasie,
Après liwa yo ko yeba que nalingaki yo,
Aa bebe, Tabou Fatou, Karine Tshitenge, Niclaire Bosiko,
Mimi Tshikeva, Beti Yahwé, Malolo, Natacha Kitenge
Bolingo vraiment soki ezalaki y'arithmétique,
Addition multiplication na ngo otié wapi,
Yo komisi division bolingo yo ke na yo,
Na tikali na ba souci na motema na nga
Horizon Massamba, Chabani Record,
Gygy Bokole, Mimi Tonga
Love ezalaki neti roman ya Shekespaer,
Yo okomisi yango lokola ya Danielle Défo,
Na tikali isolé lokola Robinson Cruzoé,
Na île na makila na miso nani ayoka kolele na nga.
Tozalaki bras déçu bras déssous naba restos naba fête partout
Lelo oyo Tabou y’oke na yo
Banza ata likambo moko ya malonga na sala po nayo
Allez ! Awa ba mere bo bimisa maputa bosipika ba pères,
Nguli zipika pe papa liputa abina ole
Maloba Tabu ayebisaki ngai,
Soki ezalaki makoma mbele ekomama nga na nzoto
Nalakisa ye po akanisa peut être ako changer idée,
Tabu Fatu, Tabu Fatu,
Tabu Fatu mama na Compressor,
Mari France wa dido tala sima Koko Mbaki na nga a ke,
Yo oko mona mutu oyo santé médiocre koleka mboko oyo eza na bitumba
Tabu Fatu, Tabu Fatu.
Nalingi yo lingi te nazolinga kaka,
Ti mokolo oko linga nga na sepela aa.
Lokola baye balingama kala linga nga nazalaka moto yasuka,
Na kufa na nga na bolingo ebembe na nga elumba solo ya bolingo,
Namema sango na yo na kunda na contaminé ba wa,
Bolingo na nga bolingo ya chérie,
Tabou Fatou (Bolingo na nga, bolingo na yo)
Mama compressor (Bolingo na nga, bolingo na yo)
Tabou Fatou na lingaka toujours ozala pembeni na ngai,
Lokola bolingo ya mamelo na kitambala,
Mosika na yo mawa eleki souffrance na ebele,
Pinzoli elaki molayi ya cravate Tabou,
Tabou Fatou epa na nga azalokola mwana esengaki bomengo ya papa na ye,
Epayi akendaki esimbaki te azongaki toujours na maboko ya papa na ye,
Yo pe epayi okeyi soki esimbi te oza toujours bolingo na nga,
Ata na lifelo soki oza pembeni na nga souffrance eko zala moins Tabou
Vers moi , vers moi
Sango nasuka miss alobaka aza na matoyi ayoka a motema andima,
Est ce que oyoki (nayoki te), est ce que ondimi (na ndimi te)
Chéri finika nga liputa mama,
Mosusu te nakolinga kaka yo
Ata b’oyo baleki yo na beauté (sia nga na za kuna te)
Ndoki alula butu nga na lula na nga Tabu Fatu,
Ndeke asengaka loso asengaka te avion.
Na za na nzala kasi na sengi na nga bolingo,
Na zanga mbati kasi na sengi Tabu Fatu
Nazanga papa, nazanga Frantin, nazanga mama Monique
Na tikala nakenda na ngai, natikala na Marco Cisse
Ndoyi ya ba parents na nga bongo nazanga yo Tabu Fatu,
Nga na mitiki lokola aveugle ne maboko ya voyant,
Nzela nioso ba komema ngai na kokende na ngai,
Ata na kufa, ata na bika Tabu
Ata na moyi, ata na mvula chéri
Na za na nzala kasi na sengi na nga bolingo,
Na za maniolo kasi nasengi na nga l’amour,
Mokolo na kutana na Nzambe nga na ko senga ye l'impératrice,
Wivine Moleka, ya Mado,
Chérie bimela nga ata lokola femme de nuit
Nga na mitandi na mbeto na ko zela yo,
Ata na 6 heure ata na midi, ti na 16 heure,
Na boyi kosambela noki, Nzambe abenganela nga yo
Mama...Flur Gani la merveille...
Cheri finika nga liputa mama...
InterprèteWerrason
LabelVIR
Paroles ajoutées par nos membresParoles ajoutées par nos membres