Paroles de Kimakango Mpe Libala

Tabu Ley Rochereau
Paroles: Tabu Ley rochereau
Maman na lembi na kobondela Maria wuta lelo na bendi nzoto
Soki na landi nde na zoki mbeli ya ba mbanda na Kinshasa oyo
Mwana mwasi abotami na Lipopo na ndimi ebongi ayebana solo
Kasi ya kotambola mboka mobimba se koluka na ndimi te
Na bondeli ye mpo atika alingi te oyo ezali etumbu ya famille
Na bendi nzoto na kati bolingo Maria na kei
Solo guitar
Na bondeli ye mpo atika alingi te oyo ezali etumbu ya famille
Na bendi nzoto na kati bolingo Maria na kei
Maria solo na bendi nzoto
Motema mozoki nga motema
Mabanzo maleki nga mabanzo
Bolingo nzoka ezali kaka bolingo
Ezali kosuwa Maria nga ko na sundoli yo
Moninga na nga tika kolela
Kende epayi ya yo babotiMotema mo zoki yo na yebi
Bolingo ya yo na ye ezali se mobesu
Kanga motema po bokabwana te yo na Maria
Maria wa nga tolingani mingi
Ya solo na ndimi lel'oyo toboyana
Na nzoto na zali se kolenga
Mayi na miso nazali komituna
Tina nini toko kabola libala nga na Maria
Moninga wa nga tika kokana
Kanga motema landa se l'amour
Mabe ya mwasi na yo bomba se na ndako
Maloba nyonso okoloba ezali mibale mibale
Maria nzoka azali mwana
Kimakango ezali se makango
Libala ezali se libala
Maloba mpamba ezali kaka maloba
Kasi kopalangana te
Maria nzambe na lingi yo
InterprèteTabu Ley Rochereau
LabelVIR
Paroles ajoutées par nos membres