Paroles de Beyanga

Mbilia Bel
Na Silika nakozoi eloko nini e
Na tomboka nakozoi reponse nini o
Moto soko akoli na ezaleli banda na bomwana naye
Akoki kosilisa na mokolo moke te tika a sala
Na ko swana swana se pamba, ezali motindo na ye
Na ndimaka te nalingi ye, ebongi na vanda na ngai
Libala oyo ba mbanda bipayi binso
Nakotisi moto na singa, epayi pasi o
Nazali na etombo na motema kasi nalingi se ye
Akoki kosala na silika soki abimeli ngai
Na kozanga liloba na pesa ye, na bandi nde kolula ye
Kaka liso pamba akotala ngai, nalembi nzoto nioso
O beyanga ozali mobali ya mobulu
Kinshasa ambiance esilakate okoya kobeba nzoto
Okoki kokota ndako ndako kasi kanisaka ngai
Nazali mwasi ya souka na yo, nazali se mwana moke
Na bebe na yo na maboko, tozali na posa nayo
Liloba yango nini nakopesa yo ya ba jupes
Na kosenga obatela nzoto ahh Beyanga
Bato banso balanda ndenge oyo bazali wapi lelo?
Nako yoka pasi na motema, ndima ngai solo na lingi
Yoka ngai cherie na yo ya motema Beyanga
Kinshasa batutaka boye te Beyanga
Kanisa ngai
Kanisa ngai
Ohh yokela ngai …Beyanga
Nakosenga o batela nzoto
Nazali nano na confiance
Na mitema mingi yo obimika kala balanda se mbongo na yo
Ba banda na ngai nioso balembi yo otikali se na ngai
Bango nioso moto na moto naye, yo ozali se gentil
O Beyanga mobali ya basi, ozalaki sala champion
Tango oyo ozali komikosa, mokili tango e change
Ba banda na ngai nioso ba vandeli yo pona mbongo na yo
Bango nioso ba lobaka mabe pona nkombo nayo
O beyanga il faut comprendre ba baluki pona jalousie
O kosala zoba, okopanza, bazali bana ya bato
Ba mbanda na ngai nioso balingaki yo na motema mpe na amour
Sika bango banso bilongi babaloli pona kotala yo
O Beyanga motema mon amour, nazali pembeni na yo
Ozali mobali oyangai ya liboso, nazui libali na ngai
Bolingo ya nga nay o ezali kaka yakopela, mpe ezali na
Balobi nayoki, bakoloba nakoyoka nazali se na yo
Nalingi se
Nakosenga o batela nzoto
Nazali nano na confiance
Na mitema mingi yo obima kala balanda se mbongo na yo
Ba banda na ngai nioso balembi yo otikali se na ngai
Bango nioso moto na moto naye, yo ozali se gentil
O Beyango mobali ya basi, ozalaki sala champion
Tango oyo ozali komikosa, mokili tango e change
Ba banda na ngai nioso ba vandeli yo pona mbongo na yo
Bango nioso ba lobaka mabe pona nkombo nayo
O beyanga il faut comprendre ba baluki pona jalousie
O kosala zoba, okopanza, bazali bana ya bato
Ba mbanda na ngai nioso balingaki yo na motema mpe na amour
Sika bango banso bilongi babaloli pona kotala yo
O Beyanga motema mon amour, nazali pembeni na yo
Ozali mobali oyangai ya liboso, nazui mobali na ngai
Bolingo ya nga nay o ezali kaka yakopela, mpe ezali na coffre
Balobi nayoki, bakoloba nakoyoka nazali se na yo
Nalingi se
O Beyango oza awa na motema eh..
Na kolia na lamba nako mbanza oh…
Pasi nioso oyo komona, nayebi Beyanga
Nazali mwana na kotala na miso eh…
O Beyanga pasi na motema lokola nalingi yo
Ozali pe tata ya mwana oh…
Otikali ko mpamba basusu bateki yo
Pe bozoba nioso okosala omoni e…
O Beyango oza awa na motema eh...
Na kolia na lamba nako mbanza oh...
Pasi nioso oyo komona, nayebi Beyanga
Nazali mwana na kotala na miso eh...
InterprèteMbilia Bel
LabelIOD
Paroles ajoutées par nos membres