Paroles de Souci D'Ete

Koffi Olomidé
Mawa na nga moko o, chérie aboyi ngai oh
Mawa na nga moko, likula na motema
Mawa na nga moko o, nalela ngai na naniee
Mawa na nga moko, natikali likombe
Mawa na nga moko, loboko na litama ehh
Mawa na nga moko, nakomi se komi...
Lela lela lela lelaka heee
Ngai moko na kati ya ndako ya likombe
Souci ebaki nga na limbe, eti nga na motema monyololo
Nga nalukaka mpongi butu nioso
Mpe nazwaka te oh, nakoka te kokanga liso
Wuta y'okenda Emie ya bolingo
Kimia ya nzoto mpe ya molimo ngai wa yo na bungisa eeh
Elili na yo seko na miso
Ekoleka mpe kozonga souvenir enyokoli bongo oh
Lokola soldat oyo balongoli ye mpete
Nawey na molimo chérie awa nga nazangi yo
Nga nanyokwami eeh
Bolingo na yo eti nga singa na kingo
Soki boleki kuna bokumbelani ye nsango
Boyebisa ye ete nga nakomi mpene ya liwa
Se ye nde akoki kobikisa nga
Ayaa aya nga nako katswa
Belle amie oyiti oy'a nga motema na motalaka ee
Ata na Soweto mowumbu basala ye te boye
Mpasi ya pota ya bolingo eluti oyo ya lisasi
Mawa na yo ko wapi, nasokola yo motema na pinzoli na nga ah
Emie nga naweyi.
InterprèteKoffi Olomidé
Paroles ajoutées par nos membres