Paroles de Parking Ya Ba Baba

Koffi Olomidé
tchatcho, eza mayi
ye ye ye ye mama
mama nga mwana, mama nga mwana nayo mawa
e ma olenga masikini, mosekonzo ma lelisa nga, pasi eleki liloba ebo kobima na mongongo ebongwani pinzoli, na kende koluka na malembe oyo ya nga esika na Parking Ya Ba Baba
mama abota nga na ndako ya esobe, monganga te akosalisa ye, se lumba lumba tongo na pokwa, mama akolisa nga na mawa
na botama loboko na litama, na motema na suka ya pota, ti lelo nga na komi konuna, makila etika te ko tanga
papa akolisa nga na wangila, na mafuta ya mbila na koli, papa akolisa nga makolo ngulu, lokola moto na kola boye
nga pourquoi kombo na nga ekoma sukali koleka masanga na coco
desespoir ekomi na point de non retour, moyi ebimaka pona moto nyonso, est-ce que c'est vrai ça
pinzoli na nga lokola ya likoko, na se ya mayi nani akomona, pasi na nga lokola ya imbwa, ata na we matanga te
a bomengo ekotelaka wapi, nzete tomataki na baninga, ekomaka na tongo na kamwa, lisumu nyonso ekomaka se ya nga mei, na kamwé, pourquoi vraiment eko zwaka se nga, tango nyonso se antoine, pourquoi vraiment toujours se nga, butu moyi papa rocky
ye ye ye ye mama
mama nga mwana, ngai awa mwana nayo mawa
Mwana ya ndeke na likolo, soki oyoki lelo na leli, yaka ko pesa nga assistance, toleka nga n'o elongo, tongo ti 6 heure tour na nga, y'olelelaka nga soki butu ekoti na mokili, ye ye ye ye mawa
nga pourquio kombo na nga elanguisaka ata bato ba melaka te, vraiment
na botama jour moko na nani, na botama lipasa ya nani, na botama na nyongo ya nani
tchatcho ma perpetuité
ye ye ye ye
molimo ya moto nzambe akela botikani yango ezala ndenge ba botamaka n'ango chance awutaka na nzambe, nani na se oyo aza na mandat ya ko juger baninga, jugement ya solo se ya nzambe, mwana ya ndeke na likolo mama abota nga na ndako ya esobe, ti lelo nga na komi ko nuna makambo etika te kolanda nga, ye ye ye ye wania waya
eh ba welaki coupé, tango batikeli ye coupé, esika partie ya mokili eza te, biso towelaka te malembe mama
saki ya pamba ekotelemaka te, mayi ya moto okotumbaka elamba te, mangungu jamais ekolonga, biso toza, paroles d'accra mogé, biso tazali
oyo ya nga bomoyi eza te liyoto, oyo alingi awzi nga akeyi, avenir na nga ekoma ya kitendi, nga na komi ko kamwa lelo na lobi ba opposant basepela
balia ngando, papa top mukuluku, e e balia ngando, fula mambu wapi bongania baleke, balia ngando, na enigme ba tuna tour na nga, e e balia ngando, a mwikason
InterprèteKoffi Olomidé
LabelSonodisc
Paroles ajoutées par nos membresParoles ajoutées par nos membres