Paroles de Obrigado

Koffi Olomidé
"Ah la vie, pasi eh
Vraiment luxen bozotala azosala nga boye! Mawa na ga ee"
Eh yoka ngayi moto oyo
Kokaka kolinga te
Yoka ya nga maloba
Tobandaka na lisolo
Tosuka ata na lisapo
Luxen musen po bayebisaki yo
Nga naza ndunda oyo baliyaka te
Obwaka na lifulu pamba pamba
Ebongaki te olanda
Maloba na bango ooo
Musengi luxen
Oy'a lelo
Pasi eleki mingi
Matoyi eboyi koyoka
Miso eboyi komona
Pinzoli eboyi mpe kotanga
Yawe eee
Nasala nini luxen
Naza kokufa po nalingi
Moninga moto
Po nini nzube etonda bebo
Na nzela oyo ya paradiso
Paradiso
Lakisa ndenge nasala
Po natika kokanisaka yo
P'oniokolo nzoto pamba
Bolingo oyo nakumbela yo
Soki ezalaki moto
Ndele ebandi kobima
Suki ya pembe
Esila nanu te
Ezali se na motema na nga ooo
Ezali se kopela
Lokola ...
Mbongo volcan
Luxen epay'ozali
Yeba awa moto awe
Sambela nga moto ya nzambe ee
Souci ekosila te
Etondi na motema meke
Ekangami na moto
Tinge
Nazuwa wapi
Nga nazuwa wapi
Nazuwa wapi
Oyo ya ngayi cheri
Luxen nalinga
Alinga nga te ooo
Luxen nalinga
Bapekisi ye alinga nga
Mawa na nga, mawa na nga
Hum limbisa ya nga motema
Soki emipesa se na yo
Bolingo ezuwa mowumbu
Nga nasala nini
Sambala nga luxen
Po nabika
Limbisa ya nga motema
Soki emipesa se yo
Limbisa ya nga miso
Soki epusa kolula yo
Musengi basala yo ba charme
Nga nalula nani
Sambela nga luxen po nabika
Limbisa ya nga miso
Soki epusa kolula yo
Baye basenginyaki yo
Yebisa bango obrigado
Faute nyonso se na nzambe
Tokosamba ata ndele
Mokili ezali se bongo
Baye basenginyaki yo
Pesa bango merci mingi
Limbisa ya nga motema
Soki epusa kolinga yo
Bolingo etiya nga boloko
Nga nasala nini
Sambela luxen
Po nabinga
Nazuwa wapi
Nga nazuwa wapi
Nazuwa wapi
Oyo ya nga cheri
Luxen nalinga
Alinga ngayi te oo
Luxen nalinga
Bapekisi ye alinga nga
Mawa na nga, mawa nga
InterprèteKoffi Olomidé
LabelFrochot Music
Paroles ajoutées par nos membresParoles ajoutées par nos membres