Paroles de GB Gros Bebe

Koffi Olomidé
Oui oui oui gros bébé, GB, eza yo! nasalel'o porte bébé hein!
Ekila monganga soki apesi ngayi
Ya koliyaka mungwa
Ekosala rien
Regime, docteur soki a decider
Namelaka ti ezanga sukali
Probleme eza te
Kasi soki po nga nabika,
Monganga apekisi nga kolinga yo,
Wana aponeli nga liwa eh
Soki okotia tembe na amour na nga, meka kokoma koka
Okomona nga nakopusa velo na yo Adelina
Hum ba libanais basilisa
Biloko nyonso na ko imiter,
Kasi balembani ko reproduire beauté na yo Adelina,
Mwa mbuyi na nga Adé!
Lokola kitunga eboyaka wenze te ee
Manso alobelaka nga ezalaka oui oui oui oui
Po na lova ye, nalela ye fou ouhhh
Botika nga nalala nayino na bolingo oyo,
Ti tango nakosutuka!
Nayeba mabe na ye, nga moko ooo
Hum,
Nayina vraiment idée ya kokabwana na ye
Lokola mobola ayina kotika
Mokili'ango malgré ba mpasi na yango ooo
Façon nalela ye vraiment boyoka
Nga ata soki nzambe asalaki ye fulu
Nalingaki nasimba bisimba simba
Nakoma fou, nabonga na fulu
Nga ata soki nzambe asalaki ye medicament
Ndele losambo na nga epa ya yawé
Akomisa nga seko moto ya bokono
Po namela Adé, a vivre o nte ya nga
Nga ata soki un jour akomi prisonnière,
Nayekola ki avocat po na defendre ye
Azalaka vraiment gros bébé, gros bébé na nga nalova ye, Adelina
Nasalela ye vraiment porte bébé,
Ya mikolo, nga namema ye na motema
Nazalaka lokola mwana moke,
Oyo mama abeti egboko
Akolelaka toujours kaka na kombo ya mama
Gros bébé, Adé na nga (maman)
Gros bébé, ah zonga eh
Botikela nga ye
Adé oyo ya mobimba vraiment, il faut omona moto koi, ah!
Adé motema na nga ah!!!
Bolingo na yo eloni nzete na motema na nga
Ekomi kobota ba mbuma elengi
Lifel'oyeli nga, yak'obwakela ng'ata soyi
Avant nazika nazala delivrer Adé
Chemin de la croix, o ressusciter nga
Adé ozalaki locataire na motema
Lelo osimbi fungola, okomi proprietaire
Dans le passé nazalaki n'etumba na ba nzoï
Lelo nakomi olia mafuta elengi
Motema na nga, ozongisi nga envie
Kitoko na yo e vaccina nga contre tout autre amour
Carrière ya bolingo esuki epa na yo
Kitoko na yo etia garde-fou na pont d'amour na nga
Moyen nakweya na se ikele ve Adé
Marie sylvie, he he he olandeli makamb'ango!!!
"Nzete mosusu, miso okokanisa lokola ekawuka.Nzoka maboko eyebaki kosala nango te"
Adé ozongisi nga envie, na desir, na elengi ya ko vivre
Eh ba tikela nga temps ko, nini ango!
Bolingo ezalaki mobesu
Lelo ekoti mayi, mafuta, mungwa
Ekomi elengi
Ampleur ya bolingo ebuki mikili
E deplacer ba ngomba
Bolingo ekomi extra love
Motema na ga, ozongisi nga envie
Motema na nga, gros bébé na nga
Motema na nga, o ressusciter nga
"Eh bana mama boyoka lisapo
Jour mosusu, bana moko ya mike baye na tongo, na ba 6h moins trois.
Baye koyebisa nga, balobi oh grand mopao MM, vieux ya jolie mayala
Ba soeurs moko baza ba coté kuna, oyebi kaka ba soeurs oyo bazalaka ba genre ya moi ba jalouse wana.Basali mwa likelemba na bango.Ba mosusu baza ba mokolo,
Balobi mais ba mosusu, vieux, ba mokuli, ba mosusu, vieux, ba mogoli
Sikoyo likelemba yanga kombo kaka GB. Oh yo kaka genre, il faut otika kaka soeur wana. Nga sikoyo nalobi ah soeur wana aza bien, tendance très très très fort
Nasalaka erreur, nalekaka na nzela moko oyo ye azalaka kolela. Oyebi kaka ndenge balobaka que babetaka lisolo ya sapatu te esika moto akatana lokolo azali. Ba comprendre nga, ba tika nga nazika soki nakozika"
Ayiii!!! ehhh!!!
Adé ozalaki locataire na motema
Lelo osimbi fungola
Okomi prioprietaire
Bolingo ezalaki mobesu
Lelo ekoti mayi, mafuta, mungwa
Ekomi elengi ehhh
Nazalaki obunda na ba nzoï
Lelo nakoma oliya mafuta elengi
Bolingo na yo eloni nzete na motema na nga
Ekomi kobota ba mbuma elengi
InterprèteKoffi Olomidé
LabelSonodisc
Paroles ajoutées par nos membres