Paroles de Diva

Koffi Olomidé
Diva bien aiméeee, laisse-moi t'aimeeer
Yoka nzembo na nga ya bolingo haaan...
Kolula yo eleki eeh ekomi'okoma lisumuuu
Mosuni ya moto soki baliaka bileyi eeh
Nakoma canibale Nzambe alimbisa nga
Nalia oyo ya yo mpo yo na nga
Tokoma nsuni moko, lokola maman na bébé na ye zemi ehh
Oh yo Diva eeh, hum longwaka nanu na mpongi eh haaan
Fungola motema na moto'yo alingi yo koleka nioso tout
Nini y'osali nga bolingo ekomi'okamola nga makila ya molema haan nanahann super nana
Nzambe ya bolingo,
Petola motema ya Diva
Atika koboya nga,
Mpete na tindeli ye ya fiançaille abwaka te
Na ebale ngai mawa mingiii...
Kolula yo eleki eeh ekomi'okoma sentiment
Mosuni ya moto soki baliaka bileyi eeh
Nakoma canibale Nzambe alimbisa nga
Nalia oyo ya yo mpo yo na nga
Tokoma moto moko, lokola maman na bébé na ye zemi ehh
Ngo yo Diva eeh, hum longwaka nanu na mpongi eh haaan
Fungola motema na moto'yo alingi yo koleka nioso tout
Nini y'osali nga bolingo ekomi'okamola nga makila ya molema haan nahan nahan nahan nahan
Dieu de l'amour,
Petola motema ya chérie
Atika koboya nga,
Mpete na tindeli ye ya fiançaille abwaka te
Na ebale ngai mawa mingiii
Paroles: Aristote, yoka papa azolela. Poto mpe malili hein
Botika kopekisa nga na ye
Boloko nga na ndimi eeh, liwa na sekiii...
Na vie na nga ya mobali nasi nalinga
Kasi Diva ndenge na yo te
Basi ya kitoko bayinaka yo
Soki oleki na nzela mpo yo kingo libwa
Bango ba kingo se mwambe, bapanzi sango
Oyokanaki yo na Nzambe
Soki olamuki okokuta na tongo
Na porte ya lopango ya baboti ba yo
Motema na nga na nkasa ya kongo bololo
Nayaki'obonzela yo
Elikya na nga epai na yo mon amour
Tobalanaka yo na nga samedi nioso
Natika komilelaka tango nayokaka
Kombo n'o epai ya bato
Nabonzeli yo bolingo'yo mwasi moko te
Akoka ko pepa na motema na nga
Ba nka bakufela nga nionso mpo y'ozala
Oy'a nga libonza merci
Nalakisi baninga photo
Na yo bakomi'otuna nga soki ya solo
Y'oza moto ya Zaire bango balobii
Y'ozali carte postale
Botika kopekisa nga na ye
Boloko nga na ndimi eeh, liwa na ngweniii...
Na vie na nga ya amoureux nasi nalinga
Kasi Diva ndenge na yo te
Basi ya kitoko batongaka yo
Soki oleki na nzela mpo yo kingo libwa ah
Bango ba kingo se mwambe, bapanzi sango
Ofutaki Nzambe avocat
Soki olamuki okokuta na tongo
Na porte ya lopango ya baboti ba yo
Motema na nga na nkasa ya kongo bololo
Nayaki'obonzela yo
Elikya na nga epai na yo mon amour
Tobalanaka yo na nga samedi nioso
Natika komilelaka tango nayokaka
Kombo n'o epai ya bato
Ngai mpate oyo ebunga nzela
Soki obaloli se miso awa epai nazali
Molimo na nga mbele ezwi lobiko ya seko
Nde nalongwe na masumu
Nabonzeli yo bolingo'yo mwasi moko te
Akoka ko pepa na motema na nga
Ba nka bakufela nga nionso mpo y'ozala
Oy'a nga libonza merci
Nga nalakisi baninga photo
Na yo bakomi'otuna nga soki ya c'est vrai
Y'oza moto ya Africa bango balobi
Y'ozali extra-terrestre
Nalakisi Gounthere photo
Nalakisi Godard na Abibo
Nalakisi Mwikason na Ndombasi eeh
Nalakisi Sorcier na Kiki de Panama
Nahaann nahaann nahaann...
InterprèteKoffi Olomidé
Paroles ajoutées par nos membres