Paroles de Conte de Fées

Koffi Olomidé
Manika eh Kato aa eh Manika ye ye ye
Kombo nini oyo ba pesaki kuna na mboka eh na mwana oyo a botamaki mokolo ya liwa
Oyo ya Papa na roma eh na vatican an an
Yoka nga ata na nzembo banza nga ata na tembo ee Kato yo leki ya michael
Yeba te bolingo na yo ezo sala ravage
Yeba t Anicet ya pedro mwana ya paris
Gunter papa porchelino oo, Monsieur le maire
Na Bangui na petrocar ...
Le rambo acramojé eh mwana ya Nzambé eh
A ti se epayi na yo oyo ya ye boyambi eh eh
Soki okoki pesa motema na yo na ngai
Soki te sala ata semblant ya ko linga nga eee
De temps en temps mwa missive
Butu tango eko yindisaka mokili eh
Minzoto ebele eko ngengaka na likolo
Ata moko te ekokani na yo na kitoko
Kato yo lipasa ya Maria Magdelena moninga ye ye ye
Euh na milaki na ko ya lisusu to linganaaa
Lokola mupe ako zongaka ko sambela
Na ndako ya Tata Nzambe Mokonzi ee
Kato yoka nga na zalaka moninga ya mawa
Nga associé ya ba soucieux ngai
Ngai ndoyi ya mabanzo ya ko aimer
Yo kitoko e leki ata o kabi ndambo na basi ata zomi
Oko zala se la plus belle yo kato eee yoyoyo
Yo Mani eee nga na weee
Mon amouuur
Kato eeeee lobela ngai o lingi ngai eee
Na motema na ngai yo zali cendrillon na kati ya conte de fée
Manika eeee kato a eeeee Manika ye ye yee
Kato o ke wapi bolingo na nga eee
Muana yiti yoka na moleli ye ye ye
Na tuna na nani na samba na nani eée
Kato o ke wapi bolingo na nga yeye ye
Muana yiti yoka na moleli eeee
Photo ko ezanga maboko nani ako yamba ngaaaa
Kato o ke wapi bolingo na nga eeee
Muana yiti yoka na moleli eee
Julien mbala pe aza loin nani a ko tuna Mani
Kato o ke wapi bolingo na nga eee
Muana yiti yoka na moleli eeee
Muana ya yiti
Manika na nga
Na lingaka yooo na motema di eeee
Soki o boyi ngai Mani oko kumba nde ngambo
O ya ofele mama
Oyo e zanga tina
A mama ma mama... mama ma mamaaan
Manikaaaa Manikaaa mamama
Lobela ngai Mani talo oyo ba futaka
Po na libela na meka pe nzoto
Oya nga no Mani oya pete na mosapi
Oya nga na yo ya bo nganga Nzambe
A mama mamaaa ma mama mamaaan
Manikaaaa maanikaaa na lela
Muana ya yiti manika na nga
O banzaka pe ngaaa epayiii yo zalii
Soki o boyi nga Mani
Oko kumba nde ngambo
O ya ofele mamaaa
O yo e zanga tina
a mama mamaaa ma mama mamaaann
Maniikaaaa maaaniiikaaaa niekese!
Linda M.
InterprèteKoffi Olomidé
LabelFrochot Music
Paroles ajoutées par nos membres