Paroles de Apostolu Ya Bolingo

Koffi Olomidé
84251
Nini nga nasali
Nini nga naweli
Nini nga nasali
Nini nga nadefi
Oyo ekumbisa nga ngambo boye
Eh na nzoto ahhh
Nini nga nasali
Nani yango azokana nga
Nini nga naweli
Nini nga nasali
Nini nga nadifi
Oyo ekumbisa nga ngambo boye
Eh na nzoto
Kombo na nga mwana amy
Kombo na nga mwana pepa ngo
Kombo na nga papa n'aristote
Kombo na nga leki ya joniko
Kombo na nga yaya na didi eh
Kombo na nga antoine makila mabe
Hum nyongo ya nani nadefi eh
Naluka nafuta oh ahh
Nakola na maboko ya mama
Na bolingo ya papa
Bango bateyaki nga
Boboto na boto
Bazuaka moke naley pondu
Bakolisa nga boye
Likambo na moto te
Nga nayebi eeehhh
Nini lelo nga nasali
Nani ango nga nabomi
Nini oyo nga nadefi lelo
Oh nini nga nasali
Niniiihhh
Oyo ekumbisa nga boye
Eh na nzoto
Po bobatisa nga na kombo munguna ehh ahhh
Bakokanaka moto boye te
Bakotongoko moto boye te
Bakofingaka moto boye te
Bakoyinaka moto boye te
Mwasi moko na mboka moko
Azalaki kitoko mingi
Mibali nyonso na mboka yango
Bazalaki kolula se ye
Kasi bazalaki kobomba
Kobanga koyebisa ye
Mwasi yango mokolo azui likama
Bakati yeee loboko
Bakomi koyebisa ye te
Bazalaka kolula ye mimi
Mokili nde boye sikoyo nga nayebi
Soki ozali basekisi yo
Mino babimisi
Opesaka mokongo
Poso na yo basilisi
Soki opesi mokongo
Bakomi ofinga yo
Nga pe nalanda te
Po nasi namesana
Esala rien
Oh esala rien
Mokili ezali boye
Sikoyo nga na comprendre
Soki ozali basekisi yo
Babengi yo ami
Opesaka mokongo
Kombo na yo e changer
Soki opesi mokongo
Bakomi o finga yo
Nga pe nakipa te
La vie ezali bongo
Esala rien mama amy azali
Esala rien aristote azali
Pene ya papa
Mokili ezali boye
Sikoyo nga na rever
Soki ozali basekisi yo
Mino babimisi
Opesaka mokongo
Poso na yo basilisi
Soki opesi mokongo
Dossier na yo eziki
Nga pe nalanda te
Po nasi namesana
Le chien aboit
La caravane passe
Humanité nga nalela, humanité
Humanité, nga namituna
Humanité ooohhhooohhh lélé
InterprèteKoffi Olomidé
LabelIOD
Paroles ajoutées par nos membres