Paroles de Makolo Ya Massiya

Carlyto Lassa
1) Tongo eteni eh
Moyi ekobima kasi ngai na motema eh
Molili makasi
2) Butu ekoti eh
Ngai na tangi buku ya Nzambe
Banda Genèse ti na Apocalypse
3) Nyonso na bombimbi eh
Liloba ya nzambe ekotikalaka eh
Manso ekolekaka
4) Mabe nionso osala
Ngai nazali mwana ya Nzambe eh
Na limbisa yo eh
Instrumental
5) Tongo etani eh
Ezalaki na tango oyo tokoya eh
Lokito ya mongongo na yo eh
6) Tozua na bomwana eh
L'amour fou
Koleka kutu Adamu na Eva eh
Na jardin d'Eden
7) Destin ekaboli ba nzela
Kasi moluki azuaka
Ngai na vandi na porte
Fungula motema eh
8) Liberté ozuwaki eh
Lokola mwana nionso ya makanisi
Ake kosakana akozongela mama na ya eh
9) Kinsala, tango nga na yo tolinganaki
Nalakisaki yo buku ya bolingo
Oyo ezali na motema na ngai
10) Na page ya liboso
Ba komi amour
Na lokasa ya mibele, ba komi love
Na oyo ya misato, bakomi bolingo
11) Na ya minei nde
Bakomi mapendo
Kasi oyo ya suka
Soki obaloli ba page nionso, yoka nga malamu
Bakomi, bolingo ya suka te
12) Buku ya Nzambe
Bandeko
Na tangi ebandeli ti na suka eh
Basengi bolingo
13) Yoko lolendo
Ezalaki koliya ya pamba na bondela
Ata ba mpiaka eh
Tovandiki kozua na biso nde bolingo
14) Lelo oke oh
Awa otiki bolingo, epai okei oh
Kuna basombi yo eh
15) Nga na wi eh
Bolingo esilaki te na motema oh
Nga wa te oh
Babotoli nga yo, po na mbongo, Kinsala eh
16) Na ko senga eh
Na nzambe, abuaka mosolo lokola manna eh
Bato banso
Ya mokili, balokota bongo oyeba valeur ya bolingo
Napesaki yo eh
17) Kinsala, oyebi bolingo napesaki yo, papa
Eleki ata mbongo na valeur
Oyebi te Yudasi atekaki Yezu
Abosanaki bolingo azalaki na ngo
18) Tango azui mosolo, aye komona te
Ezali pamba, bolingo eleki
Akendeki kozongisa mosolo
Epai ya ba zuzi, po te azongela bolingo
19) Kasi ba zuzi, baboyaki kozua mosolo
Po bayebi ndenge nini, bakozongisa lisusu bolingo te
Nga na wi eh
20) Babotoli nga yo po na mbongo, kinsala eh
Nga wa te oh
Bolingo esilaki te na motema oh
21) Na ko senga eh
Na nzambe, abuaka mosolo lokola manna eh
Bato nyonso
Ya mokili, balokota bongo oyeba valeur ya bolingo
Napesaki yo eh
22) Papa, kaka mbongo o to kolinga
Nazui mpasi, soki liwa, nde na poli
Ata liso te
Soki oye na kombo na ngai, akopesa yo nzela te
23) Bongo, nakombo ya bana oyo to boti
Ozua ata makanisi ya mobali ya Muzi te
Nga na wi eh
Bolingo esilaki te na motema oh
24) Nga wa te oh
Babotoli nga yo, lokola mbongo, Kinsala eh
Natikala awa pasi
Lokola makolo ya yesu masiya eh, ba baka na sete
25) Na ko senga eh
Na nzambe mikolo nyonso na losambo
Resurrection na nga
26) Oh Papa, na mokolo ya mpasi
Nani ako buakela nga mandalala ya mokuya
InterprèteCarlyto Lassa
LabelVIR
Paroles ajoutées par nos membres